Maloba ya Mokonzi ya Lingomba ya ba mesianike (babikisi) pona Mokili Mobimba, Révérend Claudio Cristiano Leal Pinheiro ya mokolo

Ndaku ya mosala ya Mokonzi ya Lingomba

Losambo ya Matondo ya Sanza ya Mitano ya 2020

Maloba ya Mokonzi ya Lingomba ya ba mesianike (babikisi) pona Mokili Mobimba

Révérend Claudio Cristiano Leal Pinheiro ya mokolo

Ya 3 ya sanza ya Mitano ya 2020

 

Mbote na bino ! Bozali malamu ? Matondo mingi pona boyeyi na bino na losambo oyo na bomoko na Losambo ya Matondo ya Sanza na Ndaku ya Nzambe ya Monene na biso pona Afrika mobimba.

Nalingi nazongisela bino matondo, na motema moko, pona makasi nyonso oyo bosali pona kopanza sango ya mosala ya Nzambe, ya Mateya ya Masiya Meishu-Sama pe ya Johrei nakati ya Angola pe na Afrika mobimba.

Tozali kozongisa matondo lelo na Nkolo Nzambe pe na Masiya Meishu-Sama, pona mapamboli tozui na sanza ya minei, kati na kosenga ndingisa pe kobatela pona kokokisa etinda na biso na sanza ya Mitano.

Tozuaki sango ya mawa mingi ! Mokolo ya 29 ya sanza ya minei euti koleka, molingami na biso, Président ya lingomba na biso na mokili mobimba, Révérend Masayoshi Kobayashi, asilaki kokufa na mbula 77. Azalaki kati ya kopetuama banda sanza ya motoba (6) ya mbula eleki pe ata kopetuama oyo, akobaki na kokamba biso na posa makasi, kolakisa biso nzela… aza mutu moko amipesaki bomoi na ye mobimba na mosala ya Nzambe. Muana ya baye babandaka lingomba na biso, azuaki ohikari tango azalaki nano elenge ; amipesaki mobimba na mosala ya Nzambe na mbula 26, elingi koloba amipesaki koleka mbula tuku mitano (50) na kopanza sango ya Johrei pe ya Mateya ya Masiya Meishu-Sama.

Tango Révérendissime Watanabe akufaki, azalaki komipesa elongo na ye banda kala, mbula ebele, lokola mokonzi ya ndako ya mosala (cabinet) na ye, lokola pe mosali na ye ya makasi.

Azuaki lingomba na biso pe na mbula 7 (sambo), akambi biso na maseki te, na bolingo mingi pe mokumba monene liboso ya mateya ya Meishu-Sama, ya johrei, ya Mabele Esantu ; tango nyonso, mokumba ya komema biso na kozala na kondima oyo ya kotalela kaka Nkolo Nzambe na Masiya – Meishu-Sama. Atako kopetuama ebandaki mbula eleki, ndenge nalobi, akobaki na kokamba lingomba na biso. Akufaki lolenge moko ya kimya, na ndaku na ye. Abengaki muasi na ye, asengi ye afungola fenetre, atuni ye : mokolo nini toszali. Atali ye, pe alobi na ye :’’Omakase ! Nazali na elikia, nazali kopesa na maboko ya Nzambe’’. Na sima akangi misu pe azongisi molimo na ye na lolenge moko ya kimya malamu. Akokisaki etinda na ye awa. Na boye, nakanisi été esengeli sikoyo topesa kimya na Meishu-Sama, pe na molimo ya révérend Kobayashi, na ndenge ya kokoba na mosala oyo na kotalela Nzambe na Masiya Meishu-Sama. Nasengi bino été totikala minute moko ya kimia, pona kokumisa pe kokanisa na Mokambi na biso na mokili mobimba. (Minute moko ya kimya).

Ya solo, akozala na kimya na mokano ya biso nyonso ya komema johrei, ya mateya ya Meishu-Sama na mokili mobimba. Na ndimi été lolenge malamu ya kozongisa matondo pona bomoi ya Sensei Kobayashi, ezali été biso tolanda kondima oyo ya kotalela kaka Nzambe na Masiya Meishu-Sama. Maloba na ye ya suka oyo atikelaki biso etangamaki mokolo ya yambo ya sanza, oyo ye abongisaki liboso ya liwa na ye. Mokolo ya yambo ya sanza ya mitano na Mabele Esantu ya Atami, ba oyo balandaki losambo oyo na nzela ya bilili ya internet, bazuaki ndingisa ya kolanda Mateya, elobelaki ‘’Johrei na Esengo’’.  Namonaki yango na tina mingi pamba te na maloba oyo ya suka, atalisaki polele etinda na biso na oyo etali Johrei na Mateya ya Meishu-Sama.

Na liteya mokomoko oyo tolandi lelo, ‘’johrei na esengo’’. Meishu-Sama atei boye :

‘’Atako emonani lokola johrei ya lingomba na biso ezalaka na tina ya kobikisa bokono, na bosolo, ezali bongo te. Ezali na tina koleka wana, oyo ngai nakokoma. Na mokuse, tokoki koloba été ezali lolenge ya kobota esengo. Pamba te, na maloba ya pete, bokono ezali, na bosolo, kopetuama. Ezali na tina te ya kolobela bino été kopetuama ezali nzela pona kolungola mapata ya molimo. Eza pe kaka wana te, ezali nzela oyo omemaka kolungua ya pasi nyonso ya mutu’’.

Elingi koloba été johrei ezali mosala ya kolungola mosisa ya pasi nyonso ya mokili.

Meishu-Sama akobi na koloba : ‘’nateyaka tango nyonso été bokono, bobola na kosuana ezali lolenge ya kopetuama. Kasi, kati ya misala oyo ya kopetuama, bokono ezali na tina mingi pamba te ezali kosimba bomoyi na biso pe tango tokolonga bokono, bobola na kosuana ekosila yango moko. Lokola oyo ezali na tina pona kokoma na esengo, ezali polele été misisa ya pasi ezali mbindo ya molimo pe lolenge oyo ekueisamaka te pona kopesa eyano na pasi oyo ezali solo lolenge ya kolungola mbindo ya molimo. Pona yango, ndenge nalobaki na ebandeli, johrei ebikisaka kaka bokono te. Nakopesa ndimbola mingi na likambo oyo.

Kolandisama na oyo nasi nakoma na mikolo mosusu, nzoto ya mosuni ya mutu epemaka na mokili ya mosuni pe molimo efandaka na mokili ya molimo. Pona yango, lolenge mokili ya molimo ezali, ekomilakisa mbala moko na molimo pe na nzoto ya mosuni, na ndenge été bomoi ya mutu eutaka na mokili ya molimo.

Ndenge mokili ya mosuni ezali, mokili ya molimo esalemi na bisika ebele : ya likolo, ya katikati pe ya nse. Na mokuse, mokili ya molimo esalemi na bisika misatu oyo mokomoko na yango esalemi na biteni ya mike 60. Esika nyonso ya biteni 60 ekabuami na bisika pe misatu ya biteni ya mikemike 20. Nyonso esali 180 biteni ya mikemike kosangisa na eteni moko, likolo ya nyonso, oyo Nkolo Nzambe afandi. Tozali na biteni mikemike 181. Atako Nzambe moko boye azali ya kotombuama makasi, azali kaka nakati ya moko ya 180 biteni oyo…

Ndenge tomoni yango, esika molimo ya mutu afandi ekomi monisa na bomoi ya mutu kaka ndenge ezali. Pona yango, esengeli mutu akeba pona komata tango nyonso na molimo, komatisa molimo na ye.

Tango molimo ezali komata, ndenge moko ba pasi na ye ekokita pe esengo ekomata, pamba te, pasi oyo euti na kopetuama ekozala na tina te. Pona yango, soki molimo ezali kaka na biteni ya nse, ezali na tina te ya kosalela mayele pe kosala makasi, pamba te ezali Mobeko ya Nzambe ebonguanaka te ndenge moko na Mobeko ya makambo ya molimo eyaka liboso ya makambo ya mosuni’’.

Johrei ezali nini ? ‘’joh’’-kopetuama ; ‘’Rei’’- Molimo. Elingi koloba: kopetuama ya molimo.

Kopetuama na nzela ya pole ya johrei, etumbaka mbindo, eyandolaka mbindo oyo ekobunga, pe molimo emataka. Na boye, mutu akomata. Tango nyonso, akokende esika esengo ezali ebele. Pona yango, esengeli tokota na mozindo ya kopetuama oyo ya molimo na nzela ya johrei, na nzela ya kotanga Mateya, na nzela ya kokutana na biloko ya bonzenga ya likolo, na nzela ya kolia biloko ezangi kisi, na nzela ya kosala bolamu. Ezali pamba te, tango tozali kosala mabe, kohina oyo batu bakohina biso ekomema mbindo na molimo na biso; boye, tokokueya na molimo; tango tozali kosala bolamu, matondo ya batu ekoya kopetola molimo na biso pe molimo ya ba koko na biso, pe tokomata.

Na oyo etali litatoli, nalingi kozongisa matondo epai ya ndeko Berdardo, oyo tobengaka ndeko Nadinho, pona litatoli na ye ya bondimi ya kitoko oyo batangeli biso lelo, oyo alakisi pasi oyo amoni mbula mitano. Bokanisa, na elenge oyo azalaki kokoka kotambola te mbula mitano. Pe ezaleli ya bolingo ya ndeko na biso ya muasi Regada, ya kotalisa ye johrei, mutu oyo ye ayebaki te. Kokoma na ndaku oyo ye ayebaki te, kosenga soki akokaki kosala losambo na monoko ya ba japone, pe kotombola loboko. Pe, tango azali kozua johrei, akomaki kotambola lisusu, pe tango akei kotalisa na lopitalo, mikuwa ya mukongo ezongaki. Ezali eloko esengeli toyekola, pona oyo azali nakati ya makambo etali kolongono ya nzoto, oyo alingi koluka luka …!  Bomoi na ye ebonguani ndenge nini ? Mbula mitano ya pasi, pe azui bomoi ya sika na nzela ya johrei. Oyo ezali na motuya koleka kobonga ya kolongono ya nzoto, ezali kolamuka oyo azui pona kosalisa baninga.  Wana akotaki na mosala ya komema batu, koyekolisa bango, kolanda nzela ya basali to misionere. Kasi, tomoni ndenge johrei ebongoli bomoi na ye pe ya libota na ye.

Esengo nini pona mama, pona papa, pona bandeko, pona batu nyonso, ya komona muana na bango kobima na pasi oyo, ya kozala na mikolo mosusu, ya kozala na mabongisi mosusu, kozala na elikia, eloko bazalaki kolikia te. Na bongo, esengeli tomema pole oyo ya johrei na mokili! Na eleko oyo ya pasi, oyo batu, mokili mobimba ezali mingimingi na somo, kozanga elikia, esengeli totalisa bango ete ezali na nzela pona biso tobima na pasi oyo. Tokokota na mozindo ya johrei, na mateya pe na misala ya minene oyo Meishu-Sama atikeli biso.

Na eleko oyo, tozali kozua ba kama na ba kama ya ba sango ya misala (rapports), ba matatoli oyo euti na afrika mobimba pe na mokili, ya ba ndeko na biso ba mesianike (babikisi), pe ya mikili mosusu. Na eleko oyo, batu nyonso bazali na kati ya kokota na mozindo ya oyo ezali misala minene na ba ndaku na biso. Tozali komona ba mbonguana makasi na bomoi na biso. Namoni ete mingi ya bandimi bakomi kolamusa ba ndeko na bango po basala pe misala. Bazo koka kobenda pe batu mosusu ata na mikakatano.

Ndeko Bernardo atalisi biso makambo mibale oyo ye azokoka ko landela na nzela ya telefone, na nzela ya kosambela, na kopesa makasi na batu, na kosalisa batu baluka biyano na mateya, nakosalisa bango. Tomoni ete, ata nakati ya pasi, batu bazali kozua kobatela ya kozua mapamboli na oyo etali kolongono ya nzoto, makambo ya mbongo, na kolonga kosuana, pe mikakatano. Mingimingi, nalobelaka likolo ya mokano na biso, na kokoba kopesa johei mikolo nyonso, mingimingi uta ba ndaku na biso.

Tozui litatoli moko ya libota ya bandimi na biso moko. Mondimi na biso moko azalaki kofanda na lopango moko na baboti mosusu, ba semeki, ba ndeko na ye mosusu, bandeko ya libota ebele na lopango moko.

Na kokangama oyo ya karantene, ndeko na biso oyo ya muasi akotaki na mozindo ya kosukola ndako na libota pe abandi kosala marche ya johrei mikolo nyonso pembeni ya ndako, libanda, na lopango. Ye, na bana na ye, kaka na envelope ya matondo esika azalaki kotia libonza ya matondo ya mokolo na mokolo. Elongo na bana, batu nyonso bazalaki kopesa pe kozua johrei wana. Libota ekomaki komona mikolo nyonso eloko songolo to pakala esalemi esika moko boye, nakati ya lopango, esalemi na bandeko na bango.  Ndeko na ye mosusu alobi na ye: ‘’ tala, ngai na ndimelaka penza johrei te, kasi na lingi nazua yango.  Pesa ngai envelope moko, nalingi pe nazongisa matondo ndenge bozali kosala mikolo nyonso. Abandi kozua johrei mikolo nyonso pe kolakisa matondo na ye. Sima ya ndambo ya mikolo, ndeko oyo aye koloba na mondimi na biso: “mokonzi na ngai ya mosala azali mutu ya mboka mosusu, azongi na mboka na ye likolo ya karantene. Nabungisaki mosala pamba te, nazalaki kosala nakati ya ndako na ye. Abengi ngai, alobi na ngai nazonga po nakoba nakosala mosala na ndako na ye ata aza libanda ya mboka pe asi afuti nga sanza misato mbala moko. Nakokaki kondima yango te! Namoni ete johrei ezali kosala penza’’. Akomaki kozua johrei makasi pe azongisaki matondo pona ngolu oyo azuaki. Abandi pe koloba litatoli na ye na batu mosusu.

Tozali komona matatoli ebele ya mbonguana na bomoi ya batu sikoyo nakati ya kokota na mozindo na oyo ezali misala ya mutuya. Mingi mingi tosalaka, pe , na sima, totiki to tango likambo ezalaki, tozalaki  kopesa johrei; kasi likolo ya makambo eza na se,  tokomi kosala na ndenge moko totikala kosala te pe tozali komona biyano, na ndenge ya kobenda batu pe ya kobongola bomoi na bango. Na boye, nalingi ete botinda matatoli bozui na nzela ya misala oyo po topanza pe toyekola yango.

Tozali na kati ya kobongama pona Losambo ya Paladizo na Mabele. Ekozala mololo ya 15 ya sanza ya motoba (6) ezali koya. Ezali kotalisa mokolo oyo Meishu-Sama azuaki Emoniseli ya Mbonguana ya butu ekomi moyi. Ezali mokolo ya motuya koleka mikolo nyonso pona biso ba messianike. Mbonguana oyo ebandaki mokolo ya 15/06/1931. Tokoba na komilengele pona losambo ya mokolo ya 15 ya sanza ya sambo, tokoba na misala: kopesa johrei, kotanga mateya, johrei na ndako, na libota, kosukola ndako na biso, nzela na biso, kati na kotosa mibeko ya mboka na mboka, tokeba na biloko na biso ya kolia, toluka kolia mingimingi biloko ezangi kisi, tobongisa bilanga na biso ya ndako. Nazali na esengo ya kozua sango ya ba messianike ebele, oyo, na eleko oyo, bazali kosala bilanga ya ndako pe kokomisa yango minene na ngonga oyo. Ezali na tina makasi pona oyo etali kokokisa biloko ya kolia pe pona kobota kolongono ya nzoto. Pamba te, tango tozali kolia mingi biloko ezangi kisi, tozali kopetola mingi makila na biso, molimo na biso. Tokotombuama, makasi ya nzoto ya kobundisa bokono ekomata po elonga eloko nyonso ekoya. Pona yango, bilanga pe kolia biloko ezangi kisi ezali moko ya likonzi ya lobiko pe kobanda lelo, esengeli toyamba yango lisusu na makasi nyonso.

Pona yango, tokoba na misala oyo, kasi nalingi kosenga bino lisusu eloko moko: tobakisa oyo tozali kosala lokola lolenge ya komibongisa pona Losambo ya Paladizo. Nalingi kosenga bino tokoba na kosala losambo na biso ya tongo pe ya pokua, na bomoko na Ndako ya Nzambe ya monene ya Afrika, kasi nalingi kosenga na bino, pona komibongisa na biso na losambo ya paladizo, po moko na moko abenga batu koleka 10 baya kosambela na biso na ba ngonga wana.

Oyo akoki kosambela na losambo ya tongo pe ya pokua, ezali malamu koleka; oyo akokoka kosambela kaka na moko ya ngonga oyo mibale, ezali pe malamu! Kasi ezali malamu mingi kosambela na biso na ngonga nyonso mibale esika nyonso okozala. Oyo akokoka kolanda na bilili, akoki kolanda na bilili ndenge tozali sikoyo: oyo akokoka kolanda na bilili te, esika nyonso akozala, ayeba ete ekomi ngonga ya losambo ya tongo na bomoko na ndako ya Nzambe ya monene ya Afrika to ezali ngonga ya losambo ya pokua na bomoko na ndako ya Nzambe ya monene ya Afrika. Na ngonga oyo, mutu nyonso akosala losambo pona esengo ya batu zomi.

Bozali kosenga mateya oyo tozali kotanga mikolo nyonso pe oyo ezali kokabuama na nzela ya bilili po batu batanga yango mikolo nyonso pe tokoka kolakisa batu nzela: ‘’tala, tokosambela po tozali komilengela pona mokolo ya motuya oyo eleki mikolo nyonso, mokolo ya ebandeli ya Kotongama ya Paladizo na mabele. Bongo, tokosambela! Pesa komitungisa na yo nyonso na maboko ya Nzambe pe ya Masiya Meishu-Sama! Tosambela pona esengo ya mokili na ngonga oyo’’.

Tobakisa motango ya batu pe tokobengisa bango bakoka kozala na biso elongo na Losambo ya Paladizo. Na mboka oyo bozali, soki bozali nano na karantene, nayebi te ndenge ekozala. Eza na maboko ya Nzambe; ndenge nini ekozala tii mokolo ya 15   ya sanza ya motoba? Kasi, po bakoka kozala na biso na losambo, esengeli tobongisa makambo na molimo, kati na kosambela na bomoko na ndako ya Nzambe ya monene ya Afrika mikolo nyonso. Tomatisa motango ya batu oyo bazali kosambela na biso pona bolamu ya mokili, pona esengo ya batu, pona kotongama ya paladizo na mabele.  Ngai nakanisi ete ekozala komilengele moko ya motuya makasi. Tokosala bongo elongo na misala ya mikolo nyonso! Natia elikia epai na bino?

Matondo mingi! Toko zongisa matondo epai ya ba mama na biso, pamba te, lelo, ezali mokolo ya ba mama na ba mboka ebele na mokili. Sanza oyo ezalaka ya bango. Matondo na ba mama oyo bazali elongo na biso awa na mokili ya mosuni pe na ba oyo bazali na mokili ya molimo. Nakanisi ete lolenge malamu pona biso ya kozongisela bango matondo ezali ya kopesa bango esengo na nzela ya kosalisa baninga lelo, na nzela ya kosalisa mokili po tozala batu malamu.  Mama na biso akomaka na esengo soki batu bapesi biso longonya, bongo te? Akozala na esengo: ‘’ muana na ngai asali eloko ya malamu’’. Kasi, soki tosali eloko ya mabe, akokoma na kanda pe. Na bongo, tokoluka kozongisa matondo epai ya ba mama na biso, na nzela ya kozala na matondo pe kotosa bango, na nzela ya kokipe bango malamu, na kopesaka bango lokumu, oyo ezali motuya pona pasi makasi oyo bamonaki pona babota biso. Bakoloba: ‘’ha bomoi! Ezali na tina! Akomi kosala manso pona kotonga mokili kitoko!’’ Nabanzi ete ezali nzela malamu pona biso ya kozongisa matondo pona bomoi na bango.

Nalingi tokabola na bino likambo oyo na yokaki ya bokoko ya ekolo moko ya batu ya amerike, ekolo euta Inde, babengi yango Cherokee. Bazalaki na milulu moko ezalaki boye : soki elenge mobali akomi kokota na bomoi ya mikolo, kobima na bomuana, na milulu wana, papa na ye akomema ye nakati ya esobe, na butu. Akokanga elamba na misu ya muana pe akoloba na ye atikala butu mobimba wana, afandi likolo ya mua nzete, atelema te. Ata ayoki makelele ya ba nyama, akoki kotelema te pe nyonso ekoya na butu wana, akoki kolobela mutu te, akoki pe kokima wana te, kotelema pe te. Esengelaki elenge alekisa butu mobimba wana.

Elenge atikalaki wana misu ya kokanga na elamba, azo mona eloko te, kati na koyoka kaka, akufi na kobanga, ayebi te nini ekoki koya ; ayebi te soki nyama moko akokanga ye, ayebi te nini ekoya. Alekisi butu mobimba na kobanga oyo ekoya, kobanga ndenge ekozala, soki nyama moko akoki koboma ye! Wana, na tongo, tango abandi koyoka ete moi ebandi kobima, tango alungoli elamba na misu, amoni papa na ye afandi pembeni na ye. Papa alekisaki butu mobimba pembeni na ye kati ya kobatela ye.

Ezali eloko eyelaka biso na oyo etali biso na Nzambe. Tokoki kozala na ngonga ya pasi, na kobanga, toyebi te ndenge ekolekana ! nazali ngai moko na mokili oyo, nayebi te ndenge bomoi na ngai ekozala, ‘’. Kasi, Nkolo Nzambe na Masiya Meishu-Sama bazalaka kaka pembeni na biso, na kobatelaka biso, na kokambaka biso, na kopesaka biso mayele. Esengeli tokanisaka na yango na ngonga ya pasi makasi. Tobosana yango te na bomoi na biso, ata ndenge nini.

Matondo mingi lisusu ! Lelo, tokozala na Losambo ya Matondo ya Sanza na nzela ya bilili uta Mabele Esantu ya Guarapiranga, oyo ekosalema na ngonga ya 13h ya Angola, 14h ya Afrika ya sud, 12h ya Sao Tome pe Sierra Leone.

Pe lisusu na ngonga ya 18h ya Afrike ya sud, pe ya Mozambike,17h ya Angola, ya RDC, Congo Brrazzaville, 16h ya Sao Tome na Sierra Leone, tokozala na losambo na monoko ya angle pona bandeko na biso ya afrika, bayokaka portuge te, po bayoka pe mateya ya Losambo ya Sanza ya Matondo, po basalela yango pe na katikati ya sanza ya Mitano.

Matondo mingi ! Sanza elamu ya mitano pona bino nyonso pe lobi tokozala awa pona losambo ya tongo pe ya pokua ! Lomingo malamu ! Sanza malamu na bino nyonso.

Matondo mingi !

88 Views

Partilhar amor

Procura mais alguma coisa?

Relacionados:

Ensinamento do dia
Reminiscência do dia
Ensinamento | Estudo Diário